Batisimo ezali nini?
Eyano ya Biblia
Batisimo elakisi kozindisa moto nzoto mobimba na mai.a Biblia elobeli bato ebele oyo bazwaki batisimo. (Misala 2:41) Na ndakisa, elobeli Yesu oyo Yoane mobatisi azindisaki na Ebale Yordani. (Matai 3:13, 16) Bambula na nsima, Filipe abatisaki mobali moko moto ya Etiopi na mai oyo ezalaki na nzela oyo azalaki kosala mobembo.—Misala 8:36-40.
Yesu ateyaki ete moto nyonso oyo alingi kozala moyekoli na ye asengeli kozwa batisimo. (Matai 28:19, 20) Ntoma Petro mpe azongelaki liteya yango.—1 Petro 3:21.
Na lisolo oyo
Batisimo elimboli nini?
Ntango moto azwi batisimo, amonisi liboso ya bato nyonso ete abongoli motema na masumu na ye, mpe alaki Nzambe ete akosala mokano na ye. Asengeli mpe kotosa Nzambe mpe Yesu na bomoi na ye mobimba. Moto oyo azwi batisimo amitye na nzela oyo ekomema ye na bomoi ya seko.
Kozindisa moto na mai ezali elembo ya mbongwana oyo moto yango asali na bomoi na ye. Na ndenge nini? Biblia ekokanisi batisimo na kokundama. (Baroma 6:4; Bakolose 2:12) Ntango moto azindisami na mai, amonisi ete akufi na bomoto na ye ya kala. Ntango abimi na mai, asekwi, abandi bomoi ya sika lokola mokristo.
Biblia elobi nini na likambo ya kobatisa babebe?
Biblia elobi te ete babebe basengeli kobatisama.b
Kasi emonisi ete moto oyo alingi kozwa batisimo asengeli kokokisa mwa makambo. Na ndakisa, moto yango asengeli koyeba mateya ya ebandeli ya Liloba ya Nzambe mpe bomoi na ye esengeli koyokana na mateya yango. Asengeli kotika masumu na ye, mpe kosala libondeli mpo na komipesa epai ya Nzambe. (Misala 2:38, 41; 8:12) Okanisi nini, bebe akoki mpenza kosala makambo nyonso wana?
Kobatisama na nkombo ya Tata, ya Mwana, mpe ya elimo santu elimboli nini?
Yesu ayebisaki bayekoli na ye ‘bákómisa bato bayekoli . . . , bábatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, báteya bango bátosa makambo nyonso oyo apesi bango mitindo.’ (Matai 28:19, 20) “Na nkombo ya” elakisi ete moto oyo azali kozwa batisimo asengeli koyeba mpe kondima mokumba ya Tata, ya Mwana mpe ya elimo santu ya Nzambe. Tózwa ndakisa: Ntoma Petro ayebisaki mobali moko oyo abotamá motɛngumi boye: “Na nkombo ya Yesu Kristo Monazarete, tambolá!” (Misala 3:6) Likanisi ezali nini? Petro ayebaki mpe andimaki mokumba oyo Kristo azalaki na yango mpe ayebaki ete moto yango abikaki nde na nkombo ya Yesu.
“Tata” ezali Yehovac Nzambe. Lokola azali Mozalisi, Mopesi-bomoi, mpe Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, Yehova azali na bokonzi nyonso.—Ebandeli 17:1; Emoniseli 4:11.
“Mwana” ezali Yesu Kristo, oyo apesaki bomoi na ye mpo na biso. (Baroma 6:23) Tokozwa lobiko kaka soki toyebi mpe tondima mokumba oyo Yesu azali na yango na kokokisama ya mokano ya Nzambe mpo na bato.—Yoane 14:6; 20:31; Misala 4:8-12.
“Elimo santu” ezali nguya oyo Nzambe asalelaka mosala.d Nzambe asalelaki elimo santu na ye mpo na kokela biloko, kopesa bomoi, kopesa basakoli mpe bato mosusu nsango na ye, mpe kopesa bango nguya mpo bákokisa mokano na ye. (Ebandeli 1:2; Yobo 33:4; Baroma 15:18, 19) Nzambe asalelaki mpe elimo santu mpo na kosalisa bato bákoma makanisi na ye oyo ezali na Biblia.—2 Petro 1:21.
Kozwa batisimo mbala mibale ezali mabe?
Mbala mingi, ekómaka ete moto alongwa na lingomba na ye mpe akóma na lingomba mosusu. Bongo soki así azwá batisimo na lingomba na ye ya kala? Ezali mabe soki azwi batisimo mpo na mbala ya mibale? Bato mosusu bakoloba “ezali mabe,” ntango mosusu mpo na ndenge oyo batalelaka maloba ya Baefese 4:5, oyo elobi: “Nkolo kaka moko, kondima kaka moko, batisimo kaka moko.” Kasi, vɛrsɛ yango elakisi te ete moto akoki te kozwa batisimo mpo na mbala ya mibale. Mpo na nini tolobi bongo?
Ndimbola. Makanisi oyo ezali na Baefese 4:5 emonisi ete ntoma Paulo azalaki kobɛta nsete mpo ete Bakristo ya solo bázala na bomoko na mateya mpe kondima na bango. (Baefese 4:1-3, 16) Bakokaki kozala na bomoko yango soki balandi Nkolo kaka moko, Yesu Kristo; bazali na kondima kaka moko, bakangi ntina ya makambo oyo Biblia eteyaka; mpe bango nyonso balandi kaka oyo Biblia elobi mpo na batisimo.
Lokola bato mosusu bazwaki batisimo kozanga ete báyeba malamu mateya ya Bokristo, ntoma Paulo alendisaki bango bázwa lisusu batisimo.—Misala 19:1-5.
Makambo oyo moto asengeli kokokisa mpo azwa batisimo. Mpo Nzambe andima batisimo ya moto, moto yango asengeli koyeba malamumalamu mateya ya solo oyo ezali na Biblia. (1 Timote 2:3, 4) Soki moto azwi batisimo na kotalela mateya ya lingomba na ye oyo eyokani te na Biblia, batisimo wana Nzambe ayebi yango te! (Yoane 4:23, 24) Ata soki moto yango azali na makanisi ya malamu, kasi makambo asali eyokani te na “boyebi ya solosolo.” (Baroma 10:2) Mpo Nzambe andima moto yango, asengeli koyekola mateya ya solo ya Biblia, kosalela yango, kopesa bomoi na ye epai ya Nzambe, mpe kozwa lisusu batisimo. Nsima ya kosala makambo wana, soki azwi lisusu batisimo asali mabe te. Kutu ekozala malamu soki asali bongo.
Balolenge mosusu ya batisimo oyo Biblia elobeli
Biblia elobeli balolenge mosusu ya batisimo oyo ezali na bandimbola ekeseni na batisimo ya mai oyo bayekoli ya Yesu bazwaka. Tótala mwa ndambo na yango.
Batisimo oyo Yoane Mobatisi azalaki kopesa bato.e Batisimo oyo Yoane Mobatisi apesaki Bayuda mpe baprozelite ezalaki elembo oyo emonisaki ete babongolaki motema na ndenge batosaki te mibeko ya Moize, mibeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele na nzela ya Moize. Batisimo ya Yoane ezalaki kobongisa mitema ya bato mpo na koyeba mpe kondima Masiya, Yesu monazarete.—Luka 1:13-17; 3:2, 3; Misala 19:4.
Batisimo ya Yesu. Batisimo oyo Yoane Mobatisi apesaki Yesu ezalaki ya spesiale. Yesu azalaki moto ya kokoka mpe asalaki lisumu ata moko te. (1 Petro 2:21, 22) Na yango, batisimo na ye esɛngaki te ete abongola motema to ‘asɛnga Nzambe lisosoli ya malamu.’ (1 Petro 3:21) Nzokande, batisimo na ye emonisaki ete amipesaki epai ya Nzambe mpo na kosala mokano na ye lokola Masiya, to Kristo oyo alakamaki. Yango mpe esɛngaki ete akufa mpo na biso.—Baebre 10:7-10.
Batisimo na elimo santu. Ezala Yoane Mobatisi to mpe Yesu, bango mibale balobelaki batisimo na nzela ya elimo santu. (Matai 3:11; Luka 3:16; Misala 1:1-5) Batisimo yango ekeseni na batisimo “na nkombo ya elimo santu.” (Matai 28:19) Mpo na nini tolobi bongo?
Kaka mwa motángo moke ya bayekoli ya Yesu nde babatisamaka na elimo santu. Bayekoli yango batyamaka mafuta na nzela ya elimo santu mpo bakosala elongo na Kristo na likoló lokola bakonzi mpe banganga-nzambe oyo bakoyangela mabele.f (1 Petro 1:3, 4; Emoniseli 5:9, 10) Bakoyangela bamilio ya bayekoli ya Yesu oyo bakozwa bomoi ya seko na paradiso awa na mabele.—Matai 5:5; Luka 23:43.
Batisimo na Kristo Yesu mpe na kati ya liwa na ye. Baoyo babatisamaka na elimo santu babatisamaka mpe na Kristo Yesu. (Baroma 6:3) Batisimo yango ezali mpo na bayekoli ya Yesu oyo batyami mafuta na elimo, oyo bakoyangela elongo na ye na likoló. Kobatisama na Yesu, esalaka ete bákóma basangani ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo. Yesu azali motó ya lisangá yango, mpe bango bazali nzoto.—1 Bakorinti 12:12, 13, 27; Bakolose 1:18.
Bakristo oyo batyami mafuta na elimo babatisamaka mpe na liwa ya Yesu. (Baroma 6:3, 4) Lokola Yesu, batosaka Nzambe na ndenge bamipimelaka makambo mingi na bomoi. Mpe lokola Yesu, bayebi ete bakozala na bomoi ya libela te awa na mabele. Mokristo oyo atyami mafuta na elimo azwaka batisimo yango ya elilingi ntango akufi mpe asekwi mpo na kokóma ekelamu ya elimo kuna na likoló.—Baroma 6:5; 1 Bakorinti 15:42-44.
Batisimo na mɔtɔ. Yoane Mobatisi ayebisaki bato oyo bazalaki koyoka ye ete: “Moto yango [elingi koloba, Yesu] akobatisa bino na elimo santu mpe na mɔtɔ. Pau na ye ya kopupola mbuma ezali na lobɔkɔ na ye, mpe akopɛtola mpenza esika na ye ya kotutatuta mbuma. Akoyanganisa blé na ye na ndako ya kobomba biloko, kasi akotumba mposo na yango na mɔtɔ oyo ekoki kobomama te.” (Matai 3:11, 12) Simbá ete batisimo na mɔtɔ ekeseni na batisimo na elimo santu. Na ndakisa yango, Yoane alingaki koloba nini?
Mbuma ya blé ezali komonisa bato oyo bakoyoka Yesu mpe bakotosa ye. Bato yango bazali na elikya ya kobatisama na elimo santu. Mposo ya blé elakisi baoyo bakoyoka Yesu te. Bato yango bakobatisama na mɔtɔ, oyo elimboli kobomama ya libela.—Matai 3:7-12; Luka 3:16, 17.
a Na kotalela diksionɛrɛ moko (Vine’s Complete Expository Dictionary of Old and New Testament Words), liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “batisimo” emonisaka “kozindisa na mai, kokɔtisa na mai mpe kobima na mai.”
b Mangomba mosusu esalaka molulu mpo na kobatisa babebe na kobwakeláká bango mwa mai to mpe kosopela bango mwa mai na motó mpe kopesa bango bankombo.
c Yehova ezali nkombo ya Nzambe. (Nzembo 83:18) Talá lisolo “Yehova azali nani?”
d Talá lisolo “Elimo santu ezali nini?”
e Talá lisolo “Yoane Mobatisi azalaki nani?”
f Talá lisolo “Nani akokende na likoló?”
g Biblia esaleli mpe liloba “batisimo” mpo na kolobela milulu mosusu ya kopɛtola to kosukola biloko oyo basalelaka na losambo. (Marko 7:4; Baebre 9:10) Kasi, yango ekeseni na batisimo oyo Yesu mpe bayekoli na ye bazwaki, oyo esɛngaki kozindisa nzoto mobimba na mai.