Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwyp lisolo 60
  • Nasengeli koyeba nini na ntina etali masanga?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nasengeli koyeba nini na ntina etali masanga?
  • Mituna oyo bilenge batunaka
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kanisá liboso ya komɛla
  • Zwá ekateli
  • Ndenge nini Bakristo basengeli kotalela masanga?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Tiká likanisi ya Nzambe na oyo etali masanga etambwisa yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2023
  • Tiká masanga na esika na yango
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Okoki kosala nini mpo otika komɛla masanga koleka ndelo?
    Makambo mosusu
Makambo mosusu
Mituna oyo bilenge batunaka
ijwyp lisolo 60
Elenge mobali oyo bapesi ye masanga na pikiniki

MITUNA OYO BILENGE BATUNAKA

Nasengeli koyeba nini na ntina etali masanga?

Biblia epekisi te komɛla masanga soki mibeko ya Leta endimi yango. Kasi, epekisi nde molangwa.​—Nzembo 104:15; 1 Bakorinti 6:10.

Kasi okosala nini soki bazali kotya yo mbamba omɛla masanga nzokande mibeko to baboti na yo baboyi?

  • Kanisá liboso ya komɛla

  • Zwá ekateli

  • Makambo bilenge mosusu balobi

Kanisá liboso ya komɛla

Baninga na yo mosusu bakoki komona ete komɛla masanga ezali na ntina ntango moto azali kozwa mwa mopɛpɛ. Kasi nini ekoki kobima nsima ya komɛla?

  • Moto moko na bolɔkɔ

    Okozwa makambo na Leta. Na kotalela esika ofandaka, soki omɛli masanga nzokande mibeko ya Leta epekisi, okoki kofuta amande, bakoki kofunda yo ete osali mabe, kobɔtɔla yo mokanda ya kokumba motuka, kosɛnga yo osala mosala ezangi lifuti to okoki kutu kosala bolɔkɔ.​—Baroma 13:3.

  • Aparɛyi

    Okokende nsango mabe. Masanga esalaka ete moto ayeba komipekisa mpenza te. Na nse ya kwiti, okoki koloba to kosala makambo oyo ekosala yo mpasi na nsima. (Masese 23:31-33) Na eleko oyo basite oyo bato mingi basalelaka etondi na Internet, makambo oyo osali ekoki kobebisa lokumu na yo mpo na libela.

  • Mwasi oyo azali na mawa

    Okozala na likoki mpenza te ya komibatela. Kolangwa masanga ekoki kosala ete bato mosusu bábɛta to básangisa na yo nzoto na pɛtɛɛ nyonso. Ekoki mpe kosala ete olanda makambo bato mosusu bazali kosala, yango ekoki kobakisela yo likama to osala makambo oyo eyokani te na mibeko.

  • Molangi ya masanga oyo etikali mpamba

    Okoki kokóma moombo. Baankɛtɛ mosusu emonisi ete soki obandi komɛla masanga na bolenge mpenza, ozali na likama ya kokóma moombo ya masanga. Komɛla masanga mpo na kolongola mitungisi, kotika komiyoka lokola ozali yo moko to otika kobaye, esalaka ete moto akoba kaka komɛla mpe ekómaka mpasi atika.

  • Elembo oyo ezali kokebisa na likama ya liwa

    Liwa. Na mbula oyo euti koleka, na États-Unis, kokumba motuka na molangwa esalaki ete baaksida esalema nsima ya miniti 52 nyonso. Na boumeli ya eleko ya mbula mitano, bato koleka 1 500 na nse ya mbula 21 bakufaki mbula na mbula na likama ya motuka mpo bamɛlaki masanga. Ata soki omɛli masanga te, okotya bomoi na yo na likama soki ondimi moto oyo amɛli masanga akumba yo na motuka.

Zwá ekateli

Okoki kokima makama oyo ebimaka na komɛla masanga na ndenge ya mabe soki ozwi ekateli liboso na oyo okosala.

Toli ya Biblia: “Moto ya ekɛngɛ nde moto oyo amoni likama mpe amibombi.” (Masese 22:3) Ezali malamu te komɛla masanga liboso ya kokumba motuka to kosala mosala mosusu nyonso oyo esɛngaka kotya likebi mingi.

Ekateli: ‘Nakomɛla masanga kaka tii ntango Leta ekopesa ngai ndingisa mpe na ntango oyo ebongi.’

Toli ya Biblia: ‘Ozali moombo ya moto oyo ozali kotosa.’ (Baroma 6:16) Soki omɛli masanga kaka mpo baninga na yo mpe bamɛlaka, wana ozali kotinda bango bátambwisa bomoi na yo. Soki ozali komɛla masanga mpo okitisa mitungisi, okokolisa te makoki oyo osengeli na yango mpo na kosilisa mikakatano.

Ekateli: ‘Nakotika te baninga bátya ngai mbamba namɛla masanga.’

Toli ya Biblia: “Kozala te kati na bamɛli minene ya vinyo.” (Masese 23:20) Kotambola na baninga mabe ekoki kolɛmbisa ekateli na yo. Okomitya na likama soki ozali esika moko na bato oyo bamɛlaka masanga mingi.

Ekateli: ‘Nakosala boninga te na bato oyo bamɛlaka masanga mingi.’

Makambo bilenge mosusu balobi

Jordan

“Ntango nazalaki mwana-kelasi, bazalaki ntango nyonso kotya ngai mbamba namɛla masanga. Nazalaki ntango nyonso kokanisa 1 Bakorinti 15:33, oyo elobi: ‘Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu.’”​—Jordan.

Jenna

“Nasalaka makasi nakima bato to makambo oyo ekotinda ngai namɛla. Likambo ya esengo, nazali na baninga oyo bazwaka bikateli ya malamu na likambo ya masanga.”​—Jenna.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto