18 “Bakoyoka mpenza mongongo na yo,+ mpe okokende, yo ná bankulutu ya Yisraele, epai ya mokonzi ya Ezipito, mpe bokoloba na ye ete: ‘Yehova Nzambe ya Baebre+ asololi na biso. Tobondeli yo, tiká biso tókende na esobe, tokosala mobembo ya mikolo misato mpo na kopesa Yehova Nzambe na biso mbeka.’+