8 Moize alobaki lisusu ete: “Ntango Yehova akopesa bino mosuni na mpokwa mpe mampa na ntɔngɔ oyo bokolya ndenge bolingi, bokomona ete Yehova ayoki koimaima na bino oyo bozali koimaima mpo na ye. Kasi biso tozali banani? Bozali koimaima mpo na biso te, kasi nde mpo na Yehova.”+