12 Ntango mabɔkɔ ya Moize ekómaki kilo, bazwaki libanga mpe batyaki yango na nse na ye, mpe afandaki likoló na yango. Na nsima, Arona ná Hure basimbaki mabɔkɔ na ye, moko asimbaki epai oyo mpe mosusu epai oyo, na yango mabɔkɔ na ye etikalaki kaka likoló tii moi elalaki.