27 Sikoyo alobaki na bango ete: “Talá oyo Yehova Nzambe ya Yisraele alobi: ‘Mokomoko na bino asengeli kotya mopanga na ye na loketo mpe aleka na esika mokomoko ya kokɔta na kaa mobimba, aboma ndeko na ye, moninga na ye, mpe moninga na ye ya motema.’”+