21 Asukolaki misɔpɔ ná makolo na mai, mpe Moize asalaki ete mpate-mobali yango mobimba ebimisa milinga likoló ya etumbelo. Yango ezalaki likabo ya kotumba mpo ezala nsolo oyo ezali kosepelisa. Yango ezalaki likabo oyo etumbami na mɔtɔ mpo na Yehova, kaka ndenge Yehova apesaki Moize mitindo.