30 Mpe Moize azwaki ndambo ya mafuta mosantu+ ná ndambo ya makila oyo ezalaki likoló ya etumbelo mpe amwangiselaki yango Arona ná bilamba na ye mpe bana na ye ya mibali ná bilamba na bango. Bongo asantisaki Arona ná bilamba na ye mpe bana na ye ya mibali+ ná bilamba na bango.+