12 Bongo Moize alobaki na Arona, mpe na Eleazare ná Itamare, bana na ye ya mibali oyo batikalaki ete: “Bózwa likabo ya mbuma oyo etikalaki oyo euti na makabo ya Yehova oyo etumbami na mɔtɔ mpe bólya yango, lokola limpa oyo ezangi levire, pene na etumbelo,+ mpo yango ezali eloko oyo eleki mosantu.+