13 Akolinga yo, akopambola yo, mpe akokómisa yo ekólo ya bato ebele. Ya solo, na mokili oyo alapelaki bankɔkɔ na yo ndai ete akopesa yo, okozala na bana ebele,+ akopambola mpe mbuma ya mabele na yo, blé na yo, vinyo na yo ya sika, mafuta+ na yo, bana ya bangɔmbɛ na yo mpe bana ya bampate na yo.