19 Mpe soki moto moko abimi na baporte ya ndako na yo mpe akei libándá, makila na ye ekozala na motó na ye moko, mpe biso tokozala na ngambo te. Kasi soki likambo moko ya mabe ekómeli moto nyonso oyo akotikala elongo na yo na kati ya ndako, makila na ye ekozala na mitó na biso.