24 Ntango bamemelaki Yosua bakonzi yango, Yosua abengisaki mibali nyonso ya Yisraele mpe alobaki na bakomanda ya mibali ya etumba oyo bakendaki na ye elongo ete: “Bópusana awa. Bótya makolo na bino na nkingo ya bakonzi oyo.” Bongo bapusanaki mpe batyaki makolo na bango na nkingo ya bakonzi yango.+