7 Na nsima Adoni-bezeke alobaki: “Ezali na bakonzi 70 oyo nakataki misapi minene ya mabɔkɔ mpe ya makolo, mpe balɔkɔtaka bilei na nse ya mesa na ngai. Kaka ndenge nasalaki bango, Nzambe asali ngai mpe bongo.” Nsima na yango, bamemaki ye na Yerusaleme+ mpe akufaki kuna.