21 Na nsima, anzelu ya Yehova azwaki lingenda oyo ezalaki na lobɔkɔ na ye, mpe atutisaki nsɔngɛ na yango na mosuni ná limpa oyo ezangá levire. Na mbala moko mɔtɔ ebimaki na libanga yango mpe ezikisaki mosuni ná limpa oyo ezangá levire.+ Bongo anzelu ya Yehova alimwaki na miso na ye.