2 Badani batindaki mibali ya mpiko mitano ya mabota na bango, longwa na Zora mpe na Eshetaole,+ mpo na konɔnga mokili mpe kotalatala yango. Balobaki na bango: “Bókende kotalatala mokili yango.” Ntango bakómaki na etúká ya ngombangomba ya Efraime, na ndako ya Mika,+ balalaki kuna.