-
Ruta 4:4Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
4 Na yango nakanisaki ete nasengeli koyebisa yo yango mpe koloba boye: ‘Sombá yango na miso ya bato mpe bankulutu ya mboka na biso.+ Soki olingi kosikola yango, sikolá yango. Kasi soki okosikola yango te, yebisá ngai nayeba, mpo yo nde moto ya liboso oyo azali na lotomo ya kosikola yango, mpe ngai nayei nsima na yo.’” Ayanolaki ete: “Nandimi kosikola yango.”+
-