11 Na mokolo oyo elandaki, Saulo akabolaki bato na bituluku misato mpe bakɔtaki na kati ya kaa yango na eleko ya kokɛngɛla ya ntɔngɔ mpe babomaki Baamone+ tii ntango moi engalaki. Baoyo babikaki bapanzanaki mpenza, batikalaki bato mibale esika moko te.