24 Kasi na mokolo yango mibali ya Yisraele balɛmbaki mingi mpenza, mpo Saulo alapisaki basoda ndai ete: “Moto oyo akolya bilei liboso mpokwa ekóma mpe liboso nazongisela banguna na ngai mabe, alakelama mabe!” Na yango, ata moto moko te kati na basoda yango alyaki bilei.+