7 Ntango bato ya Yisraele oyo bazalaki na etúká ya lobwaku mpe na etúká ya Yordani bamonaki ete mibali ya Yisraele bakimi, mpe ete Saulo ná bana na ye bakufi, basundolaki bingumba mpe bakimaki.+ Na nsima, Bafilistia bakɔtaki na bingumba yango mpe bakómaki kofanda kuna.