6 Mokolo moko Davidi ná basoda na ye bakendaki na Yerusaleme mpo na kobundisa Bayebusi+ oyo bazalaki kofanda kuna. Bato yango bazalaki koloba na Davidi: “Okokɔta awa soki moke te! Ata bato oyo bakufá miso mpe batɛngumi bakobengana yo.” Bazalaki kokanisa: ‘Davidi akokɔta awa ata moke te.’+