11 Kasi mwasi yango alobaki: “Nabondeli yo, Ee mokonzi, kanisá Yehova Nzambe na yo, mpo mozongisi mabe mpo na makila+ abakisa mpasi likoló ya mpasi te mpe báboma mwana na ngai.” Na yango mokonzi alobaki: “Lokola Yehova azali solo na bomoi,+ ata nsuki moko te ya motó ya mwana na yo ekokwea na nse.”