19 Mokonzi atunaki ye: “Yoabe nde atindi yo oloba makambo oyo nyonso?”+ Mwasi yango ayanolaki: “Lokola ozali solo na bomoi, Ee nkolo na ngai mokonzi, ezali kaka ndenge olobi, mpo ezali mosaleli na yo Yoabe nde apesaki ngai mitindo, mpe ayebisaki ngai mosaleli na yo, makambo nyonso oyo nalobi.