-
2 Samwele 18:9Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
9 Nsukansuka Abisalome akómaki liboso ya basoda ya Davidi. Azalaki kotambola na mpunda, mpe mpunda na ye elekaki na nse ya bitape minene ya nzete moko monene mpenza, mpe motó ya Abisalome ekangamaki na nzete yango ya monene. Akangamaki wana mpe makolo na ye ezalaki kotuta mabele te,* kasi mpunda ekobaki kokende.
-