13 Kɔtá epai ya Mokonzi Davidi mpe lobá na ye: ‘Nkolo na ngai mokonzi, ezali yo te moto olapelaki ngai mosaleli na yo ndai, olobi: “Mwana na yo Salomo akokóma mokonzi nsima na ngai, mpe ete ye nde akofanda na kiti na ngai ya bokonzi”?+ Sikoyo mpo na nini Adoniya akómi mokonzi?’