25 Mpo lelo oyo akei kopesa ebele mpenza ya bambeka+ ya bangɔmbɛ, ya banyama ya mafutamafuta, mpe ya bampate. Lisusu, abengisi bana na yo nyonso, ná bakonzi ya basoda, mpe nganga-nzambe Abiatare.+ Bazali kolya mpe komɛla kuna liboso na ye, mpe bazali se koloba: ‘Mokonzi Adoniya azala na bomoi!’