-
1 Bakonzi 22:8Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
8 Na yango, mokonzi ya Yisraele alobaki na Yehoshafate: “Moto mosusu azali oyo tokoki kotuna Yehova na nzela na ye.+ Kasi ngai nalingaka ye te,+ mpo ata mokolo moko te asakolá makambo ya malamu mpo na ngai. Asakolaka kaka makambo ya mabe.+ Ezali Mikaya mwana ya Yimila.” Kasi Yehoshafate alobaki: “Ee, mokonzi, koloba likambo ya bongo te.”
-