23 tii ntango Yehova alongolaki Yisraele na miso na ye, kaka ndenge alobaki yango na nzela ya basaleli na ye nyonso basakoli.+ Na yango, Baasiri balongolaki Bayisraele na mabele na bango mpe bamemaki bango na mboka mopaya, na Asiri;+ mpe bafandi kuna tii na mokolo ya lelo.