37 Mokolo moko, ntango azalaki kogumbama na tempelo ya nzambe na ye Nisroke, bana na ye ya mibali, Adrameleke ná Sharezere, babomaki ye na mopanga.+ Na nsima bakimaki na mokili ya Ararate.+ Mpe mwana na ye Esare-hadone+ akómaki mokonzi na esika na ye.