14 Amemaki bato ya Yerusaleme mobimba na mboka mopaya: bankumu nyonso,+ bilombe nyonso ya etumba, moto nyonso oyo ayebi malamu misala ya mabɔkɔ mpe mosala ya bibende.+ Bato yango nyonso bazalaki 10 000. Atikaki ata moto moko te na Yerusaleme, longola kaka baoyo bazalaki babola mpenza.+