25 Na mbula ya libwa ya boyangeli ya Zidikiya, na sanza ya zomi, na mokolo ya zomi ya sanza yango, Nebukadenezare+ mokonzi ya Babilone ayaki ná limpinga mobimba ya basoda na ye mpo na kobundisa Yerusaleme.+ Atyaki kaa mpo na kobundisa yango mpe atongaki efelo ya kozinga yango epai na epai.+