9 Hazaele akendaki kokutana na Elisha. Amemelaki ye likabo oyo: Lolenge nyonso ya biloko malamu ya Damasi oyo bakamela 40 ekoki komema. Ayaki mpe atɛlɛmaki liboso ya Elisha mpe alobaki: “Mwana na yo, Bene-hadade mokonzi ya Siri, atindi ngai natuna yo soki akobika na maladi oyo azali kobɛla.”