14 Bongo amonaki mokonzi atɛlɛmi wana pene na likonzí, na kolanda momeseno.+ Bakapita ná babɛti-kelelo+ bazalaki elongo na mokonzi, mpe bato nyonso ya ekólo bazalaki kosepela mpe kobɛta kelelo. Na mbala moko, Atalia apasolaki bilamba na ye mpe agangaki: “Basaleli ngai likita! Basaleli ngai likita!”