-
2 Bakonzi 12:18Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
18 Na yango Yehoashe mokonzi ya Yuda azwaki makabo mosantu nyonso oyo bankɔkɔ na ye Yehoshafate, Yehorame ná Ahazia, bakonzi ya Yuda, basantisaki.* Azwaki mpe makabo mosantu na ye moko, ná wolo nyonso oyo ezalaki na bisika ya kobomba biloko ya motuya ya ndako ya Yehova mpe ya ndako ya mokonzi, mpe atindelaki yango Hazaele mokonzi ya Siri.+ Bongo Hazaele abundisaki lisusu Yerusaleme te.
-