8 Balevi ná Yuda mobimba basalaki kaka ndenge nganga-nzambe Yehoyada apesaki bango mitindo. Moto na moto azwaki bato na ye oyo bazalaki na mosala na Sabata ná baoyo bazalaki na mosala te na Sabata,+ mpo nganga-nzambe Yehoyada apemisaki bituluku+ yango te na mokumba na bango.