-
2 Ntango 28:15Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
15 Na nsima mibali oyo batángamaki nkombo batɛlɛmaki mpe bazwaki bakangami; bapesaki baoyo nyonso bazalaki bolumbu bilamba oyo eutaki na biloko oyo epunzamaki na etumba. Na yango, balatisaki bango mpe bapesaki bango basandale, bapesaki bango eloko ya kolya mpe ya komɛla, mpe mafuta mpo na loposo na bango. Lisusu, baoyo bazalaki na bolɛmbu, batyaki bango likoló ya bampunda mpe bamemaki bango epai ya bandeko na bango na Yeriko, engumba ya banzete ya mbila. Na nsima, bazongaki na Samaria.
-