17 Senakeribe akomaki mpe mikanda+ mpo na kofinga Yehova Nzambe ya Yisraele+ mpe koloba mabe mpo na ye, alobi: “Ndenge moko na banzambe ya bikólo ya mikili mosusu oyo bakokaki te kobikisa bato na bango na lobɔkɔ na ngai,+ Nzambe ya Ezekiasi mpe akobikisa bato na ye na lobɔkɔ na ngai te.”