8 Tiká mokonzi ayeba ete tokendaki na etúká ya Yuda, na ndako ya Nzambe monene. Ndako yango ezali kotongama na mabanga minene oyo bazali kobalola mpo na kotya yango na bisika na yango, mpe mabaya ezali kotyama na bifelo. Mosala yango ezali kokende mbangu mpo bato bazali kosala na molende.