25 “Mpe yo, Ezera, na bwanya oyo Nzambe na yo apesi yo, tyá bamajistra ná basambisi mpo básambisaka ntango nyonso bato oyo bazali na etúká ya ngámbo mosusu ya Ebale, baoyo nyonso bayebi mibeko ya Nzambe na yo; mpe bosengeli koteya moto nyonso oyo ayebi yango te.+