28 Mpe amoniseli ngai bolingo ya sembo na ndenge asali ete nandimama na miso ya mokonzi,+ bapesi-toli na ye+ mpe bankumu nyonso ya nguya ya mokonzi. Bongo nazwaki makasi, mpo Yehova Nzambe na ngai azalaki elongo na ngai, mpe nasangisaki bato ya lokumu ya Yisraele mpo bámata elongo na ngai.