8 Kasi mpo na mwa ntango moke, Ee Yehova Nzambe na biso, omoniseli biso boboto na ndenge otiki ete mwa ndambo ya bato bábika mpe opesi biso libateli na esika na yo mosantu,+ mpo na kongɛngisa miso na biso, Ee Nzambe na biso, mpe mpo na kopesa biso lisusu makasi na boombo na biso.