34 Tobwakaki mpe mbɛsɛ mpo na koyeba libota nini ya banganga-nzambe, ya Balevi mpe ya bato esengeli komema nkoni na ndako ya Nzambe na biso, na bantango oyo etyamá, mbula na mbula, mpo na kopelisaka yango likoló ya etumbelo ya Yehova Nzambe na biso, ndenge ekomami na Mobeko.+