-
Estere 4:11Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
11 “Basaleli nyonso ya mokonzi mpe bato ya bitúká ya mokonzi bayebi malamu ete soki moto, azala mobali to mwasi, akɔti na lopango ya kati ya mokonzi+ nzokande babengisi ye te, mobeko oyo basalelaka ezali kaka moko: Asengeli kobomama. Akoki kobika kaka soki mokonzi asemboleli ye lingenda ya wolo ya bokonzi.+ Mpe mikolo 30 yango oyo, babengi ngai te nakɔta epai ya mokonzi.”
-