22 mpo na mikolo yango Bayuda bapemaki liboso ya banguna na bango mpe na sanza yango nde mawa na bango ebongwanaki esengo mpe kolela na bango+ ebongwanaki fɛti. Na mikolo yango basengelaki kosala bafɛti mpe kosepela mpe kotindelana biloko ya kolya mpe kopesa babola makabo.