-
Mosakoli 4:8Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
8 Ezali na moto oyo azali kaka ye moko, azali na moninga te; azali na mwana te to na ndeko te, kasi mosala na ye nyonso ya makasi ezali na nsuka te. Miso na ye etondaka bomɛngo te,+ kasi amitunaka boye: “Mpo na nani nazali kosala mosala makasi mpe komizangisa* biloko ya malamu?”+ Yango mpe ezali mpamba, mpe mosala ya mpasi.+
-