2 “Nalali, kasi motema na ngai elali te.+
Nazali koyoka ndenge bolingo na ngai azali kobɛta kɔkɔkɔ!”
“Fungolelá ngai, Ee ndeko na ngai ya mwasi, bolingo na ngai,
Ebenga na ngai, moninga na ngai oyo azangi mbeba!
Mpo motó na ngai epɔli na mamwɛ,
Nsuki na ngai oyo elíngamalíngamá etondi na matangá ya mai ya butu.”+