2 Mpo na nini ntango nayaki, moto azalaki te?
Mpo na nini moto moko te ayanolaki ntango nabengaki?+
Lobɔkɔ na ngai ezali mokuse mpo na kosikola,
To nazangi nde nguya ya kobikisa?+
Talá! Na mpamela na ngai nakaukisaka mbu;+
Nakómisaka bibale mokili ekauká.+
Mbisi na yango ekufaka mpo mai ezali te.
Mpe epɔlaka mpo na kozanga mai.