6 Natyaki likebi mpe nazalaki kaka koyoka, kasi balobaki likambo moko te ya solo.
Moto moko te abongolaki motema na mabe na ye to amitunaki: ‘Nasali nini?’+
Moto na moto azali kokoba kosala makambo ndenge bato nyonso basalaka, lokola mpunda oyo ezali kopumbuka mpo na kokɔta na etumba.