4 ‘Bakokufa na bamaladi oyo ebomaka,+ kasi moto moko te akolela bango to akokunda bango. Bakokóma lokola nyɛi na etando ya mabele.+ Bakokufa na mopanga mpe na nzala,+ mpe bibembe na bango ekozala mpenza bilei mpo na bandɛkɛ ya likoló mpe mpo na banyama ya mabele.’