19 Ee Yehova, makasi na ngai mpe esika makasi ya libateli na ngai,
Esika na ngai ya kokima na mokolo ya mpasi,+
Bato ya bikólo bakoya epai na yo longwa na bansuka ya mabele
Mpe bakoloba ete: “Libula oyo bankɔkɔ na biso bazwaki ezali kaka lokuta,
Eloko ya mpamba mpe makambo oyo epesaka litomba te.”+