-
Yirimia 23:32Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
-
-
32 “Nakopesa etumbu na basakoli oyo basakolaka bandɔtɔ ya lokuta,” Yehova alobi bongo, “baoyo bazali koyebisa yango mpe bazali kobungisa bato na ngai nzela mpo na makambo na bango ya lokuta mpe komikumisa na bango.”+
“Kasi natindaki bango te mpe napesaki bango mitindo te. Na yango, bakomemela bato oyo eloko moko te ya malonga,”+ Yehova alobi bongo.
-